lundi 14 janvier 2013

VOUS SEREZ MES TEMOINS BOKOZALA BENZENENEKE BA NGAI Retraite de Pâques - Prison de Makala, 18/19 Avril 2011


VOUS SEREZ MES TEMOINS 
BOKOZALA BENZENENEKE BA NGAI

Retraite de Pâques - Prison de Makala, 18/19 Avril 2011
Liteya lya yambo
ETINDA YA EKLESYA – L’ENVOI DE L’EGLISE
1.      Introduction
Mbula ekoya, ekosalema na Roma Synode ya baepiskopo likolo na Bopalinginyi Nsango Elamu na ndenge ya sika, «La nouvelle Evangélisation».
Awa Eklezya mobimba ezali kolengele likita lina linene, o diocèse ya biso basengelaki biso tosala retraite ya biso na mbula eye likolo ma maloba ma Yezu «bokozala banzeneneke ba Ngai» - «Vous serez mes témoins».
Lelo mpe lobi, tokolanda mateya ma Kristu engebene na etinda ya Eklezya (l’envoie de l’Eglise).
Yezu abiangi biso epai ya Ye, lokola mokolo mususu abiangaki bapostolo npo ‘te bazala elongo na Ye, bayeba ndegne nini azali kobika mpe kosala, bongo na nsima atinda bango basala lokola Ye azalaki kosala. (Mc. 3, l3-19).
Tokoki mpe kokanisa ndenge Yezu abyangi bapostolo epai na Ye likolo na ngomba Tabor, esika abongwani nzoto o boso bwa bango, mpe bayeba ndenge nini Tata azali kolinga Ye (Mt.17,1-8).
Soko tolingi ‘te Yezu alakisa biso bonene bwa Ye, mpe nkembo ya Ye, tosengeli komipesa na Tata lokola Ye: «Tata, esalema té lokola Ngai nalingi, kasi sé lokola Yo moko olingi» (Lk. 22,42).
Na losambo «Tata wa biso» tozali kosenge «mpo elingi Yo basala yango o nse, lokola bakosalaka o likolo» - «Que ta volonté soit faite». (Mt.6, 10).
Tokoki mpe koloba lokola Mama Santu Maria: «Mosaleli wa Nzambe ngai oyo, esalema na ngai lokola olobi» (Lc. 1,38).

2.      Yezu Atindi Eklezya

Mokolo Yezu atombwami o likoló, alobi na bayekoli ba Ye:
«Bapesi ngai bokonzi bonso o likolo mpe o nse» (Mt. 28,18).
«Lokola Tata atindi Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino» (Yo. 20, 21).
«Bokende mboka inso: bosangela bato banso Nsango Elámu.» (Mk. 16,15)
«Bokómisa bato ba bikolo binso bayekoli ba Ngai…Bolakisa bango ‘te batosa manso natéyaki bino» (Mt. 28, 20).
«Bobatisa bango o nkombo ya Tata, mpe ya Mwana mpe ya Elimo Santu» (Mt. 28,19).
«Moto akoyamba mpe akokula batisimu, akobíka ; kasi moto akoyamba té, akokita o likambo» (Mk. 16, 16).
«Bokula Elimo Santu; masumu ma bato malímbisi bino, makolímbama; masumu malimbisi bino té, makotíkala» (Yo. 20, 23). «O Nkombo ya Ngai, bosakola o bikolo binso ‘te bato basengeli  kobongola mitema mpo ya kozwa bolimbisi bwa masumu» (Lk. 24, 47)

«Elimo Santu akokitela bino mpe bokozwa nguya, bongo bokozala banzénénéké ba Ngai o Yerusalem, o Yudeia mobimba, o Samaria téé bipai binso o mokili mobimba» (Bik. 1,4-8).
«Bato bakoyamba bakosala makamwísi maye: o nkombo ya Ngai bakobengana bazabolo; bakoloba mkota ya bikolo bisusu; … bakotíela bato ba bokono maboko mpe bakobika» (Mk. 16, 17-18).
«Mpe tala, Ngai nakozala no bino mikolo minso kinó nsuka ya molongo» (Mt. 28, 20)

3.      Bapostolo batosi etinda ya Kristu

Ä  Mk. 16,20: «bakei kosakola bipai binso. Mokonzi alendisi Lilola lya Ye na makamwisi...»
Ä  Bazalaki kosala makamwisi: Bik. 5, 12-16 (lire)
Ä  Bik. 3, 1-8: o tempelo ya Yerusalém
Ndakisa: mobali moko azalaki kotambola té, kosala eloko yoko ma maboko te
Ä  Bik. 9, 32…42: 
- O mboka Lída, Petro abikisi Enéo.
Ndakisa ya lelo na Kinshasa: Abikisi mobali azalaki na paralisie latérale
-         O Yópe asekwisi Tabita.
Ndakisa epai ya biso apesi bomoi na Noela

4.      Balaiki balandi mpe etinda ya Kristu

Ø  Lk. 10, 1-20 : Yezu atindi bayekoli 72 babikisa bato ba bokono, basakola Nsango Elamu
Ø  Mk. 9, 38-40: Ba-exorciste laiki
Ø  Bik. 8. 4-8: Batéyi ba Nsango Elamu

5.      Santu Pólo alandi mpe etinda ya Kristu

1)      Libosu, santu Pólo azalaki koteya Nsango Elamu ya Kristu:
ü  Rom. 1, 16: «Nsango Elamu ezali koyokisa ngai nsóni té; ezali nguya ya Nzambe mpo ya kobikisa bato banso bandimi yango na motema»
ü  1 Kor. 1, 17: «Kristu atindi ngai mpo na kosangela Nsango Elamu»
ü  Gal. 1, 11-12: «Nsango Elamu eye nazali kosangela euti na bato té… Kasi Yezu Ktistu oyo abimelaki ngai Ye mpenza alakisi ngai yango»
ü  2 Tim. 2,8-10: «Bakangi ngai na minyolólo, lokola moto asálaki mabé…» (lire le texte)
ü  Fil. 1, 12…18: «Nakangemi o boloko mpo ya Kristu» (lire le texte)
ü  2 Kor. 6, 3-10: «Bakotala biso lokola bato balingi bakufa» (lire le texte)
ü  Kol. 1,24…28: «Nasepeli na mpasi nazali koyoka mpo ya bino»

2)      Santu Pólo azalaki kotíela babo ba bokono maboko mpo na kobikisa bango
®    Bik. 14, 8-10: «Telema sembola makolo ma yo»
®    Bik. 20, 7-12: Etiko, elengé mobali, akufi, Pólo asekwisi ye
®    Bik. 28, 8-9: O esanga Malta, tata wa Públio azalaki na mpasi…Pólo atíeli ye maboko mpe abikisi ye, na bato ebele o esanga.
Ndakisa, le 2 ya sanza eye, na Ville ya Braga, Portugal, mwasi moko mbula 17 maladi, abiki

3)      Santu pólo azalaki mpe kobengana bazabolo: Bik. 16, 16-18 (lire le texte)
Ndakisi Elenge azalaki na «légion» ya bazabolo, zambi mama abonzeli ntango azalaki na zemi.
6.     Lelo, Yezu azali kotinda biso

«Lokola Tata atindi Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino» (Yo. 20, 21).
«Bokende mboka inso: bosangela bato banso Nsango Elámu.» (Mk. 16,15)
«Bokómisa bato ba bikolo binso bayekoli ba Ngai…Bolakisa bango ‘te batosa manso natéyaki bino» (Mt. 28, 20).

1)      Lokola Tata atindi Ngai…

Lk. 4, 14-19: «Yezu azalaki na nguya ya Elimo Santu»
Mt. 4, 23: «Asangeli bango Nsango Elamu ya bokonzi mpe abikisi bato bazali na bokono»
Mt. 8, 16: «Abengani bilimo mpe abikisi bato banso bazalaki na bokono»

Mk. 6, 5: «Yezu abikisi bato ba bokono na botíeli bango maboko»
Mk. 7, 32: «Bayeli Yezu moto ya lokó mpe ebúbú: babondeli Yezu atíela ye maboko»
Mk. 8, 22...26: «Bayéli Yezu moto wa lolanda... Yézu atíeli ye maboko... amoni polele»
Ndakisa: Sango moko Franciscain, azaliki komono bobéle 23%, nsima ya losambo aleki na 80%.
Mt. 9, 18: «Mwana mwasi wa ngai awei sikasikawa. Kasi, oya kotíela ye maboko mpe akobika»

Yezu abikisi mpe bato bazalaki mosika
Ä  Mt. 8, 5...13: Abikisi mosaleli wa komamda
Ndakisi: ndeko moko azali na Paris abengi ngai na téléphone, ndeko ya yé mwasi azalaki na mbeto nsima ya mwa sanza. Nalobi na ye, apesa ye téléphone. Tosambelaki... abiki. Abimi na m beto.
Ä  Mk. 7, 24...30: Abengani zabolo o nzoto ya mwana mawasi mopagano.
Ndakisa: Ndeko moko azali kofanda na Portugal, mobali na ye abengaki ngai na téléphone, kloloba ‘te mwasi na yé azali na Zabolo tósala losambo ya délivrance. Tosali yango, mwasi akomi malamu

2)      … Ngai mpe nazali kotinda bino

Mt. 10, 1.8: «Yezu abengi bayekoli ba Ye apési bango nguya ya kobemgano bilimo bya mbindo mpe ya kobikisa bato banso bazali na bokono to na mpasi ndenge na ndenge…»
Ndakisa: Elengi mwasi azalaki na zabolo, zambi nkoko na ye apesi ye na zabolo»

Yo. 17, 15-19: «Natindi bango o kati ya bato, lokola Yo otindaki Ngai o kati ya bato»
Mk. 16,15-18: Bokende Mboka inso, bosakola bato banso Nsango Elamu…
Ndakisa: Elenge mwasi, fiancé na Ye apesi ye na zabolo abala moto mosusu té

Yo. 14, 25-26: «Elimo Santu, oyo Tatá akotindela bino o nkombo ya ngai, akolakisa bino mambi manso, akolimbolela bino manso nalobi na bino…»
Bik. 1, 4-8: «Elimo Santu akokitela bino mpe bokozwa nguya, bongo bokozala banzénénéké ba Ngai o Yerusalem, o Yudeia mobimba, o Samaria téé bipai binso o mokili mobimba»

Bongo, biso lelo awa na Makala
- Komanyola Liloba lya Nzambe
- Kosambela mpo na baninga bazali na mpasi

Liteya lya ibale

BOKENDE, BOKUMISA BATO BA BIKOLO BINSO BAYEKOLI BA NGAI

I – YEZU AKELI BASAKRAMENTU

1.     Batisimu:

1º. Yezu akuli batisimu mpe apesi bapostolo mitindo ‘te «babatisa bato»
Ä  Lk. 3,21-22: Awa Yezu akuli Batisimu, «Elimo Santu akiteli Ye, amoni lokola ebengá; loyaka loyokani ut’o likoló: «Yó ozali Mwana wa Ngai wa bolingo, nasepeli Yó mingi»
Ä  «Bosangela bato banso Nsago Elamu», «Bobatisa bango o nkombo ya Tata, mpe ya Mwana mpe ya Elimo Santu» (Mt. 28, 19)
Ä  Moto akoyamba mpe akokula batisimu akobika; kasi moto akoyamba té,  akokita o likambo» (Mk. 16,16)

2º Ndakisa ya bapostolo
·        Bik. 2, 1-41: O mokolo mwa Pentekóste, «Bato bandimi maloba ma Petro bakuli Batisimu. O mokolo mona bato sokí nkoto isato bandimi kolanda bayekoli»
·        Bik. 10, 34-48:  O ndako ya Kornélio, Pétro na baninga babátisi liboka lya ye mobimba.

3º. Mpo na biso, lelo:
Ø  Rom. 8,14-17: «Baye banso bokotosaka Elimo Santu bazali bana ba Nzambe…»
Ø  Gal.4, 4-7: «Tozali bana na Ye, zambi atindi o mitema mya biso Elimo wa Mwana wa Ye»

2.     Nkotisa

1º. Yezu akeli yango:
ü  Lk. 24, 49: «Ngai nakotindela bino Elimo Santu lokola Tata wa Ngai alakélákí. Yango wâná botikala o mboka eye tée mokolo bokozwa Nguya ya lokoló»
ü  Bik. 1, 4-8: «Elimo Santu akokitela bino mpe bokozwa nguya, bongo bokozala banzénénéké ba Ngai o Yerúzalem, o Yudeia mobimba, o Samaria tée bipai binso o mokili mobimba»

2º. Ndakisa ya Bapostolo
ü  Bik. 8, 17: «Petro na Yoane batiali basamaria maboko mpe bakúli Elimo Santu»
ü  Bik. 13, 5: «O Elézia ya Antiókia batieli Saul na Bárnaba maboko bazwa Elimo Santu»
ü  Bik. 19, 5-7: O Efése, «Pólo atíélí bangó mabóko mpe Elimo Santu akiteli bango (12)»

3º. Ntina ya nkotisa mpo na biso sikawa
®    Yo. 14, 15-17: «Ngai nakobondela Tatá, mpe Tatá ndâpési bino mobondi mosusu, ázala na bínó sékô. Ye afándí na bínó mpe azali o mitema mya bino»
®    Yo. 15, 26-27: «Mobondi akoya, Oyo nakotinda o nkombo ya Tatá, Elímo ya Bosôló…»
®    Yo. 16, 13-15: «Elímo ya Bosôló akosangela bino mambi manso ma bosôló…»
3.     Ukaristia
1º. Yezu akeli Ukaristia
Þ    Lk. 22, 19-20: «Eye ezali nzoto ya Ngai ekokabama mpo ya bino; bosalaka bongo mpo ya kokanisa Ngai… Nkeni eye ezali nkeni ya Bondeko bwa sika ya makila ma Ngai…»
Þ    1 Kor. 11, 23-26: «Mbala inso tokolia Límpa liye... tokosakola lywa lya Mokonzi…»

Bolamu tokozwa na Ukaristia
·        Yo. 6, 53-57: «…Moto akolia nsuni ya Ngai, mpe akomele Makila ma Ngáí, akosangana na Ngáí, mpe Ngai nakosangana na Ye… Moto akolia Ngai akozala na bomoi mpo ya Ngáí»
·        1 Kor. 10, 14-22: Nkéni… ekosangisa biso na Makila ma Kristu. Limpa tokobukaka likosangisa biso na nzoto ya Kristu...»

4.     Ntubela = Sacrement de la Réconciliation

1º. Yezu akali Sakramentu ya Ntubela – Bokati bondeko
Ä  Yo. 20, 22-23: «Masumu ma bato malimbisi bino makolimbama...»
Ä  Lk. 24,47-48: O mokili mobimba bosangela ‘te bato basengeli kobongola mitema...

2º Bonene bwa Sakramentu ya Ntubela
Æ  Rom. 5, 1-11: «…Kristu awei mpa na biso basumuki…» (cf. Lk. 15,1-32; 19,15)
Æ  Eph. 2, 13-22: «… Na liwa na Ye abomi bonguna… abuki lopango…»
Æ  2 Kor. 5, 17-21: «… Moto akomi na Kristu lisanga, akomi moto ya sika…»
Æ  1 Tim.1, 12-17: «… Kristu ayei kobikisa basumuki, ngai moto ya yambo o ntei ya bango»

3º. Mbuma ya Sakramentu ya Ntubela 
      1)  Tokozwa bolimbisi bwa masumu manso tosalaki libosu (Ez. 18, 21-23; Mik. 7, 18-19)
2)  Soko tosali lisumu linene, Elimo Santu etiki biso; na ntubela tokozwa Ye lisusu.
3)     Guérison intérieur, physique et psychique ; mingi «maladies psychosomatiques»
4)     Boboto bwa Elimo Santu bokota o motema, tokozwa makabo ma Ye.

5.     Mafuta ma bakoni

Mk. 6, 12-13 : «Bapóstolo… bapakóli bakoni baike mafuta o nzoto, babikisi bango»
Yak. 5,  13-16 : «Soko moko o kati ya bino azali na mpasi...bápakola ye mafuta… abika»

6.     Bonganga Nzambe

Lk. 22, 19-20 : Maloba yezu alobi: «bosalaka bongo mpo ya kokanisa Ngai» ezali bokeli bwa B.Nz
1 Kor. 11, 23-26 : Awa tokokula Komunio, «tokosakola lywa lya Mokonzi kin’o mokolo akoya»

7.     Bolongani

Mt. 19, 3-9 : «...Mpô ekangi Nzambe, moto akangola yango té...»
Mk. 10, 2-11: «Nzambe asali bato mobali na mwásí... bango bábalé bokoma sé moto mókó...»
II – NAKOZALA NA BINO TEE NA NSUKA YA MOLONGO

1.      Yezu azali o Eklezia – Nzoto ya Kristu
Æ  Rom. 12, 4-8: «...Biso tozali bato baiké; tazali nzoto sé yoko o Kristu..»
Æ  1 Cor. 12, 12-14: o Eklezia «nzoto ezali sé yoko, atâ ekabwani binama binama...»

2.      Yezu azali o kati ya lisanga
Ä  Mt. 18, 19-20: «Soko awa o nsé bato babale bayokani kosenge eloko ata nini, Tata akopesa yango. Esika babo babale to basato basangani o nkombo ya ngai , nazali o ntei ya bango»
Ä Bik. 2, 42-47: «Bayekoli bazalaki na moléndé o bolandi matéya ma Bapóstolo, bazalaki lisanga, babúkákí mampa (Ukaristia), mpe basámbelákí elongo»
Ä Bik. 4, 23-31: «Ezalaki bangó kosambela bôgó , ndako esika basangani ebando koningana; bato banso batondi na Elimo Santu mpe balandi kosakola Liloba lya Nzambe na mpíkó».
Ä Bik. 4, 32-37: «Bato banso bakomi koyamba bazali motema sé moko, mayéle sé moko»

3.      Yezu azali o Liloba lya Ye
®    Yo. 6,63.68: «Maloba ma Ngai mazali maloba ma Elimo mpe ma bomoi... Mokonzi tokokende epai ya nani? Yo moto ozali na maloba makopesa bomoi bwa sékô»
®    Voir message du Synode sur la Parole de Dieu, nº 7-10
®    Papa Benoît XVI na mokanda na ye, Verbum Domini, La Parole de Dieu, nº. 50/52.
®    Lk. 1,26-38: Maria andimi Lilola lya Nzambe nde Yezu azwi nzoto epai ya ye
®    Yo. 1, 1-18: «Lilola akomi moto mpe azaláki o ntei ya biso… Tomoni nkembo ya Yé, mkembo ya Mwana sé mókó azwi epai ya Tatá ya Yé.»

4.      Yezu azali o Ukaristia Esantu
-         Lk. 22, 14-20.27: «Nyoki mposa mingi ya kolia Pasika eye elongó na bínó libosu ‘te nayoka mpasi...  Eye ezali nzoto ya Ngai... Nazali o ntei ya bino lokola oyo azali kosala. »
-         Yo. 13, 1-20: «Bokotangaka Ngai Mokonzi mpe Motéyi... Bongo soko Ngai Mokonzi mpe Motéyi nasukoli bino makolo, bino lokola bosukulana makolo. Napesi bino ndakisa na ntina ‘te bino mpe bosalaka lokola Ngai nasali bino: mosaleli aleki Mokonzi wa yé té»
-         Yo. 6, 56.57: « Moto akolia nsuni ya Ngai, mpe akomele Makila ma Ngáí, akosangana na Ngáí, mpe Ngai nakosangana na Ye...»

5.      Yezu azali kofanda o kati ya moko moko wa biso
Ø  Yo. 14, 12-14: «Moto ayambi Ngai akosala misala nazali kosala. Akosala mpe misala mileki bonene, zambi nakokende o mboka Tata... Nakosala binso bokosenge o nkombo ya Ngai…»
Ø  Yo. 14, 22-23: «Soko moto alingi Ngáí, akobomba maloba ma Ngáí, mpe Tatá wa Ngáí akolinga ye, tokoya o moka ye, mpe tokofanda epai ya ye»
Ø  Yo. 15, 1-13: «Moto akangani na Ngáí, lokola Ngái nakangani na ye, akobota mbuma mingi
Ø  1 Yo. 4, 11-13: «Nzambe afandi o mitema mya biso mpe mitema mya biso mitondi na bolingi bwa ye. Tozali na Yé lisanga, zambi akabeli biso Elimo ye Ye»

Yango wana, Yezu azali esika wapi tozali
 Mpo ya biso, Yezu asambeli Tata: Yo. 17, 18-26
P. Alfredo Neres, mccj

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire